NZAMBE AJALISAKI MOKILI NA BISO
NYOSO MPE BILOKO NYOSO NA BOMOI
Na ebandeli, Nzambe ajalisaki lora mpe mokili. Ebandeli 1.1 Mpo na ye
Nzambe ajalisaki biloko nyoso na lora mpe na mokili. Bakolosai 1.16a
Bozwa bolamu ya Nkolo, oyo asali lora mpe mokili! Lora ezali ya Nkolo
ye moko; kasi apesi mokili mpo na batu. Njembo 115.15, 16
NZAMBE AJALISAKI BISO
Bongo
Nzambe alobaki: "Tosala motu lokola elilingi na biso, azala lokola
biso mpenza. Azala mokonzi ya bambisi na mai,...likolo ya mokili
mobimba." Ebandeli
1.26a
MOTU AKUMAKI MOTU NA BOMOI
Boye Nkolo Nzambe akamataki putulu ya mabele, asalaki na yango motu.
Apemaki pema ya bomoi na zolo na ye, mpe motu akumaki motu na bomoi.
Ebandeli 2.7
Nkolo Nzambe alobaki: "Ezali malamu te mpo na motu kotikala ye moko.
Nakosalela ye mosungi." Bongo Nkolo Nzambe alalisaki Adamu mpongi
makasi. Abimisaki mokuwa moko ya mpanzi na ye, mpe akangisaki mosuni
na esika yango. Na mokuwa oyo abimisaki na mpanzi ya Adamu, Nkolo
Nzambe asalaki na yango mwasi, mpe ayaki na ye epai ya Adamu.
Ebandeli 2.18a, 21, 22
ADAMU MPE EVA BATOSAKI NZAMBE TE
Esengeli
toyoka mongongo na Satana mbala moko te.
Nkolo Nzambe akamataki motu yango mpe atiaki ye na
elanga ya Edene mpo na kolona biloko kuna mpe mpo na kobatela yango.
Apesi ye motindo oyo: "Okoki kolia mbuma ya banzete nyoso ya elanga,
kasi mbuma ya nzete oyo epesaka mayele ya koyeba makambo malamu na
mabe, okoki kolia yango te. Mpo ete mokolo okolia yango, okokufa."
Ebandeli 2.15-17
NYOKA, NKOMBO NA YE LOKOLA DIABLE TO SATANA, ANDIMAKI BOKONZI NA
NZAMBE TE MPE ALOBAKI LOKUTA.
Bongo nyoka alobaki na mwasi: "Bokokufa solo te." Mwasi amonaki ete
nzete yango ezalaki malamu mpo na kolia, kitoko na kotala, mpe yango
ezali malamu mpo na kopesa mayele. Yango wana akamataki mbuma moko
mpe alei, apesaki mpe mobali oyo azalaki elongo na ye, bongo ye
aliaki yango. Ebandeli 3.4, 6
ADAMU MPE EVA BAKOKAKI LISUSU TE KOTIKALA KATI
NA ELANGA
Nkolo
Nzambe abengani motu na elanga ya Edene, mpe atindi ye asala mosala
na mabele oyo asalemaki na yango. Atiaki bakeruba na elanga...Bango
bazalaki kopasapasa mopanga...kopekisa ete motu moko te akuma
penepene ya nzete oyo epesaka bomoi. Ebandeli 3.23b, 24b
MOKOLO ADAMA MPE EVA BASALAKI LISUMU
EZALAKI MOKOLO NA MAWA MONENE MPO NA BATU NYOSO
Masumu ekotaki na mokili mokili mpo na motu moko,
Adamu, mpe epesaki kokufa. Boye kokufa esili kokweya likolo na batu
nyoso.... Baroma 5.12
Likambo na Kobosana Te:
Batu nyoso babotami na masumu mpe mokolo mosusu bakokufa mpo ete
kokufa ekumaki na njela na masusu. (Tanga Baroma 5.12
lesusu.)
NZAMBE APONAKI KOBIKISA BISO NA
NZELA NA KOTINDA MWANA NA YE MOKO
"Ye
akobota mwana mobali oyo okobenga nkombo na ye Yesu, mpo ete Mwana
yango akobikisa batu na ye kati na masumu na bango." Matayo
1.21
YESU KRISTO MOBOMA MALAMU NYOSO MPO NA BISO
Yesu azali Mpate ya Nzambe. "Botala Mwana-Mpate na Nzambe oyo
alongoli masumu na mokili." Yoane 1.29b
Tosili kokuma sembo liboso na Nzambe, eleki nyoso tokobi- ka na nkele na Nzambe mpo na ye. Baroma 5.9b
Kristo
akufaki mpo na biso ntango tozalaki naino batu na masumu. Baroma
5.8b
BATU NYOSO OYO BANDIMI MWANA NA NZAMBE BAZALI
NA BOMOI
"Mpo ete Nzambe alingaki mokili mingi, boye ye apesaki mwana na ye
moko, boye motu na motu na kondima ye akokufa te, kasi akozala na
bomoi na seko." Yoane 3.16
"YE ASILI KOSEKWA!"

Anzelu alobaki na basi: "Bobanga te. Nayebi ete
bozali koluka Yesu, motu oyo babetaki na krusi. Ye azali awa te, ye
asili kosekwa lokola ye alobaki. Boya, bomona esika oyo ye alalaki na
yango." Matayo 28.5, 6
YESU AKOKI KOBIKISA YO MPE AZALI KOBONDELA MPO NA
YO
Mpo Yesu azali na bomoi mpo na seko, ye akoki kobikisa, sik'oyo mpe
na seko, batu oyo bazali koya epai na Nzambe mpo na ye, mpo ye azali
ntango nyoso na bomoi mpo na kobondela Nzambe na ntina na bango.
Baebere 7.24a, 25b
NDENGE NINI OKOZWA NJELA EPAI NA NZAMBE
1. Ondima ete osili kosala masumu .
Batu nyoso basili kosala masumu mpe basili kozanga nkembo na Nzambe.
Baroma 3.23
2. Yaka epai na Nzambe na nzela na Yesu Kristo.
Mpo na oyo, ye [Yesu] akoki kobikisa,...batu oyo bazali koya
epai na Nzambe mpo na ye. Baebere 7.25a
3. Obongola motema, tika masumu na yo.
"Boye bobongwa mpe bozonga epai na Nzambe mpo ye alongola masumu na
bino." Misala 3.19
Tika mabe mpe sala malamu. Njembo 37.27a
6.
Ndima Yesu Kristo na motema nyoso.
Otatoli na monoko na yo liboso na batu nyoso ete Yesu azali mokonzi,
mpe soki ondimi na motema nyoso ete Nzambe asili kosekwisa Ye kati na
bakufi, okozwa kobikisa. Baroma 10.9b "Ndima Mokonzi Yesu na motema,
mpe okozwa kobikisa, yo mpe libota na yo." Misala 16.31b
Mpo ezali mpo na ngolu na Nzambe bino bosili kobika, na nzela na kondima....Ezali likabo na Nzambe, ezali te mpo bosalaki makasi mpo na kozwa yango, boye motu moko te akoki komipesa lokumu. Baefeso 2.8, 9
7. Yamba Yesu Kristo kati na motema mpe bomoi na
yo.
Yo moko okoki kofungola mwango na motema na yo na koyamba Yesu. Yesu
alobaki: "Yoka, nazali kotelema na ekuke na ndako mpe nazali kobeta
yango. Soki motu ayoki mongongo na ngai, mpe afungoli ekuke na ndako,
nakokota epai na ye, nakolia elongo na ye mpe ye akolia elongo na
ngai." Emoniseli 3.20
MOKAMBI MPO NA KOBONDELA
Soki osili kobondela liboso te mpe ozali na bosenga na kozwa kosalisa
mpo na kobondela, okoki kotala libondeli oyo lokola
mokambi.
Nkolo Yesu, Napesi Yo mersi mpo ete okufaki mpo na ngai likolo na
krusi myo na kolongola masumu na ngai. Nazali na mawa zambi na
makambo mabe nyoso nasili kosala. Nasengi Yo kokota motema na ngai
mpe kofanda kuna seko. Sikawa nazali kondima ete okopetola motema na
ngai. Nakamati Yo lokola Mobkisi mpe Mokonzi na ngai mpenza.
Nabondeli na nkombo na yo. Amena.
SOKI YESU AZALI NA MOTEMA NA YO, OZALI NA BOMOI
NA SEKO
Nzambe apesaki biso bomoi ya seko, bomoi oyo ezali kati na Mwana
na ye. Motu oyo azali na Mwana, azali na bomoi yango. 1 Yoane 5.11b,
12a
"...Motu na koyoka maloba na ngai, mpe na kondima motu oyo atindaki
ngai...asili kolongwa na kokufa mpe asili koleka na bomoi." Yoane
5.24b
NDENGE NINI OKOKI KOLANDA YESU NA KOTIKA TE
Mikolo nyoso, tanga baverse mosusu na Biblia (Maloba na Nzambe)
mpe bomba baverse mosusu na motema na yo. Likambo oyo ekosalisa yo.
Makomi nyoso ebimaki na Nzambe mpe ekokani mpo na kolakisa likambo ya
solo, kopamela libunga, kobongisa mabe, mpe kotalisa nzela na ezaleli
sembo. 2 Timoteo 3.16
YESU ALINGI OTATOLA EPAI NA BATU MOSUSU
Yesu alobaki: "Zonga na mboka na yo, kati na libota na yo, osolola
bango makambo nyoso Mokonzi na yo asili kosala na ngolu na ye mpo na
yo." Mako 5.19b
LORA EZALI SOLO ESIKA
Na Emoniseli sapita 21 totangi ete kati na likambo lokola ndoto,
Yoane amonaki lora na sika mpe mokili na sika.
"Ye akopakola mai na miso nyoso na miso na bango. Kokufa ekozala
lisusu te, mawa, to kolela, to mpasi ekozala lisusu te. Biloko na
liboso ekosila." Bongo motu oyo azalaki kofanda na kiti na mokonzi
alobaki: "Sik'oyo, nasali biloko nyoso ya sika." Emoniseli 21.4,
5a
Yoane amonaki lokola Vile Santu, bobele Yerusalema, kokita na lora,
kouta epai na Nzambe. Mpe vile mpenza ezalaki na or kitoko, petwa
lokola talatala. Basalaki mabanga na makolo na lopango na lipombo na
ndenge nyoso na mabanga na motuya mingi. Emoniseli 21.18b,
19a
YESU ASILI KOKENDA KOBONGISA ESIKA
MPO NA BATU NYOSO OYO BANDIMI YE
Yesu alobaki na bango: "Botika mitema na bino na komitungisa te.
Bondima Nzambe mpe bondima ngai lokola. Bisika na kofanda ezali mingi
na ndako na Tata na ngai. Nakei kobongisa esika mpo na bino. Soki
ezalaki boye te, mbele nasili koloba na bino. Mpe nsima na kokende na
kobongisa esika mpo na bino, nakozonga lisusu mpo na kokamata bino
epai na ngai, boye esika ngai nazali bino mpe bokozala." Yoane
14.1-3
YESU AKOZONGA LISUSU
Batu-ayoso bakosekwa na kokufa.
"Mpo ntango ezali koya, ntango bakufi oyo bazali na lilita bakoyoka
mongongo na Mwana ya Motu, mpe bakobima na lilita na bango. Batu oyo
basili kosala malamu, bakosekwa mpo na kozwa bomoi. Batu oyo basili
kosala mabe, bakosekwa mpo na kozwa ngwanga." Yoane 5.28b,
29
Na liboso bakufi kati na Kristo bakosekwa.
Nsima yango, biso oyo tokozala naino na bomoi na ntango yango. Nzambe
akobenda biso elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na
Mokonzi kati na mopepe. Boye, tokozala elongo na Mokonzi mpo na seko.
1 Batesalonike 4.17
"Bobondela mpe bolala te, mpo boyebi te mokolo nini ntango yango
ekokuma." Mako 13.33b
YESU AKOYA NDENGE NINI?
Botala ye azali koya kati na mapata! Batu nyoso bakomona ye.
Emoniseli 1.7a
Keba na bakristo na lokuta mpe banebi na lokuta.

"Soki motu moko alobi na bino: Botala Masiya azali awa!' to
Ye azali kuna!' bondima ye te. Soki balobi na bino:
Botala ye azali na esobe!' bokende kuna te. Mpe soki balobi na
bino: Botala ye azali kobombana awa!' bondima yango te." Matayo
24.23b, 26b
YESU AKOYA NOKI KATI NA MAPATA NA LORA
"Bongo mitinda nyoso...bakomona ngai Mwana ya Motu koya kati na
mapata na lora elongo na nguya mingi mpe na nkembo mingi." Matayo
24.30b